Songtexte.com Drucklogo

Solitude Songtext
von Extra Musica

Solitude Songtext

Naye, naye se na ndoto epayi na yo
Yaka tosolola lelo
Naye, naye se na ndoto epayi na yo
Yaka tosolola lelo
Tika to profiter ata na ba ndoto, nana na nga
Bongo tomonana ah
Ba distances ya ba kilomètres ekaboli biso
Moyen to se rejoindre te, nana
Ba distances ya ba kilomètres ekaboli biso
Moyen to se rejoindre te, nana
Ba pensées, se na makanisi ebebisi nga moto
Pongi nalala te
Ba pensées, se na makanisi ebebisi nga moto
Pongi nalala te


Yango plus tard ekozonga na réalité un jour eh
Lokola bolingo ya Papito Mbala
Tosala makasi tolonga
Lokola Bedele Charles
Armand Kaba, ye na mère Francine
Amour se bolingo

Yahweh akela biso na mokili ya se
Atikela biso ba 10 commandements ya bolingo
Ya tina nini tokoluka tobebisa yango oh
Se na Nkolo
Yahweh akela biso na mokili ya se
Atikela biso ba 10 commandements ya bolingo
Ya tina nini tokoluka tobebisa yango oh
Se na Nkolo

Bolingo lingo lingo enyokoli ngai banda y′okende
Ah Bob Masua, Jules Okana
Alobi na ngai oke okozonga eh
Lily Eseka mama na Darly Pomalo
Wapi Blaise, Blaise Bambi eh
Zacharie Lukombo

Hein château des cartes oyo otongela nga na motema
Eza fragile, bolingo fololo
Y'a pas de rose sans épine, ah Iza
Chicoter nga naleli


Yahweh akela biso na mokili ya se
Atikela biso ba 10 commandements ya bolingo
Ya tina nini tokoluka tobebisa yango oh
Se na nkolo

La solitude etingami na nga na motema, pasi mingi
Oy′a Ancêtre mwana Ingami eh akozela yo
Mokolo nini y'okoya eh
Tala nga nakomi koniokwama pona yo
Nakokatshua pamba, Youla Bols

Stella Itampi
Kokende okende otikaki nga na libongo ya Yoro
Ami na sima bato nyoso bakoma kotuna yo
Doudou akomi'olela lela souci ele nga nzoto lelo
Nazangi moto akoya akabela nga ata esengo
Benga ata na butu ya lel′oyo oh Alonzo eh

Yahweh akela biso na mokili ya se
Atikela biso ba 10 commandements ya bolingo
Ya tina nini tokoluka tobebisa yango oh
Se na Nkolo

Osundoli ngai lokola nkasa basundoli na nzete
Amitié eleki famille na tango na tango ya pasi ye akosunga yo oh
Boni okokende otika nga na bwale
Motema na nga etondi pyramide ya souci
Ata mokanda ya consolation nazwa te

Songtext kommentieren

Log dich ein um einen Eintrag zu schreiben.
Schreibe den ersten Kommentar!

Beliebte Songtexte
von Extra Musica

Fans

»Solitude« gefällt bisher niemandem.