Songtexte.com Drucklogo

Silence De Dieu Songtext
von Audit Kabangu

Silence De Dieu Songtext

Mosantu ya batu avandaka na lola
Andima kosopa makila

- Atalisanga nzela ya bomoyi
Apesanga bolingo ya banguna na ngai

Chœur: nkolo oh Yesu, kumama na yo

- Omonaki moto esengeli azala na avocat
Oyaki osopi makila na yo
Okoma avocat na ngai epayi ya papa

Chœur: Nkolo oh Yesu kumama na yo Mosusu azali te


Vocal: mokolo moko te Yesu na ngai bakobenga yo ex Nzambe
Kiti na yo seko na seko
Oko céder yango te epai ya moto Yaya
namona batu kofuta mbongo po ba voter bango Bakoma ba Présidents

Ata ba renouveler mandat na 200 ans, Présidence ezalaka te
Kasi oyo ya yo bokonzi, ezanga ebandali, ezanga suka
Na lola mandat ekozala te, ba élection ekozala te
po ozali nzambe na bomoyi
suki ya pembe ekobima te na moto na yo

Réfrain: yango wana totomboli maboko likolo
Totatoli oyo asimbi likolo na se
Suki ya pembe ekobima te na moto na ye
P′oza Nzambe
Kumama nkolo mosusu azali te

Songtext kommentieren

Log dich ein um einen Eintrag zu schreiben.
Schreibe den ersten Kommentar!

Quiz
Wer ist kein deutscher Rapper?

Fans

»Silence De Dieu« gefällt bisher niemandem.